Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda.
Bongo bato nyonso ya Isalaele oyo batangamaki kolanda mabota na bango mpo ete bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mpe bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda,
Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai.