43 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Nefitali ezalaki nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
Mpo na bakitani ya Nefitali : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Bango nde bato oyo Moyize mpe Aron elongo na bakambi zomi na mibale ya Isalaele, oyo moko na moko azalaki kotalisa libota na ye, batangaki.
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei.