Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.
Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.
Tika ete bakamata bambabola yango, atako ezali ya bato oyo bakufaki likolo ya masumu na bango ; mpe tika ete batuta yango na marto mpo ete ekoma papala mpe batia yango likolo ya etumbelo, pamba te bamemaki yango liboso ya Yawe mpe ekomaki bule. Tika ete yango ekoma elembo mpo na bana ya Isalaele. »
Yawe alobaki na Moyize : « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. »
Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.
Batindaki elongo na ye bakambi zomi, lokola mokambi moko mpo na libota moko na moko ya bana ya Isalaele : moko na moko azalaki mokambi ya libota na ye kolanda mabota ya bana ya Isalaele.