Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 1:36 - Mokanda na Bomoi

36 Mpo na bakitani ya Benjame : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 1:36
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tozongiselaki nkolo na ngai : « Tozali na tata oyo akomi mobange mpe ndeko mobali ya leki oyo babotelaki tata na biso na kimobange. Ndeko na ye ya mobali akufa mpe atikala kaka ye moko mwana mobali na libumu ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mingi. »


Bana mibali ya Benjame : Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi.


Benjame azali lokola mbwa ya zamba ; na tongo, apasolaka mosuni na ye ; na pokwa, akabolaka bomengo ya bitumba. »


Kati na libota ya Benjame : Eliyada, elombe ya bitumba, azalaki mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale oyo bazalaki na matolotolo mpe na banguba ;


Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Manase ezalaki nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.


Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Benjame ezalaki nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.


kati na libota ya Zabuloni, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Jozefi, bato nkoto zomi na mibale ; mpe kati na libota ya Benjame, bato nkoto zomi na mibale. Bango nyonso babetamaki kashe.


Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ