Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 1:26 - Mokanda na Bomoi

26 Mpo na bakitani ya Yuda : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 1:26
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.


Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.


Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda.


Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi, mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye. Kasi atako bongo, makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi.


kasi aponaki libota ya Yuda, ngomba Siona oyo alingaki ;


Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Gadi ezalaki nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba.


Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Yuda ezalaki nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.


Abrayami abotaki Izaki ; Izaki abotaki Jakobi ; Jakobi abotaki Yuda mpe bandeko na ye ya mibali ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ