Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 1:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mpo na bakitani ya Simeoni : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 1:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. »


Jozefi apesaki mokongo, apusanaki mosika mpe abandaki kolela. Bongo azongelaki bango mpe asololaki lisusu na bango. Azwaki Simeoni kati na bango mpe akangaki ye na miso na bango.


Bana mibali ya Simeoni : Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana.


Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama ; Ye oyo akembisaka maboko mpe makofi na ngai mpo na bitumba !


Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Ribeni ezalaki nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.


Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Simeoni ezalaki nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.


kati na libota ya Simeoni, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Levi : bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Isakari, bato nkoto zomi na mibale ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ