Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 1:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi.


Sanza misato sima na bana ya Isalaele kobima na Ejipito, kaka na mokolo yango, bana ya Isalaele bakomaki na esobe ya Sinai.


Tango balongwaki na Refidimi, bakotaki na esobe ya Sinai, mpe Isalaele atongaki kuna kati na esobe molako etalana na ngomba.


Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.


Boye, Mongombo etelemisamaki na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso na mobu ya mibale.


— Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okotelemisa Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani ;


Yawe abengaki Moyize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani :


Oyo nde mitindo oyo Yawe apesaki Moyize, na ngomba Sinai, mpo na bana ya Isalaele.


Basangisaki lisanga mobimba na mokolo ya liboso, na sanza ya mibale ; boye bana ya Isalaele batalisaki bokoko na bango kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Bakomaki bakombo ya mibali nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mobali moko na moko na kombo na ye,


Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami : — Boya bino misato na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bango nyonso misato bakendeki.


Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai, na sanza ya liboso ya mobu oyo ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito. Alobaki na ye :


Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na moko, na mobu ya minei, Moyize alobaki na bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye na tina na bango.


Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango.


Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ