Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe, nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai ; Nzambe na ngai akoyoka ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 7:7
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai !


Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.


Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya ; nazali kozela maloba na Ye.


Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai ; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso.


Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye ; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.


Nakomi lokola mokufi matoyi oyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.


Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.


Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso ! Longola kanda na Yo na tina na biso !


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


Na mokolo wana, bato bakotalela Mokeli na bango mpe bakobalola miso na bango epai ya Mosantu ya Isalaele ;


Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »


Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika, bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili ; pamba te Ngai, nazali Nzambe, mpe mosusu azali te.


Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.


Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ; yango wana nakotia motema epai na Ye. »


Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.


Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.


Oh Yawe, Yo nde nazali kobelela, pamba te moto ezikisi matiti mpe banzete nyonso ya bilanga.


Nakotelema na esika na ngai ya kokengela, nakotelema ngai moko na likolo ya mir, nakosenzela mpo na komona makambo oyo akoyebisa ngai mpe eyano oyo nakopesa na banzembo oyo ya mawa.


Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama ; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka ; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, zela yango kaka ; solo, ekokokisama, ekowumela te.


Kasi soki mwasi amikomisaki mbindo te, soki azali penza peto, akomona pasi ata moko te mpe akoki kobota bana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ