Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 7:4 - Mokanda na Bomoi

4 Moto oyo aleki malamu kati na bango azali lokola nzube, moto oyo aleki sembo azali mabe koleka liboke ya basende. Mokolo oyo bakengeli na yo basakolaki ekokisami, mokolo oyo Yawe ayei kopesa yo etumbu. Sik’oyo, ekomi tango na bango ya koyoka soni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 7:4
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?


Pamba te ezali mokolo moko ya lokito ya bitumba, mokolo ya pasi makasi mpe ya somo kati na lubwaku ya Emoniseli kowuta na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; ezali mokolo oyo mir ya makasi ekobukana mpe makelele ya koganga ekobima na bangomba.


Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »


Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ; ekolimwa na tango ya kosambisama.


Ata moko te kati na bango akobika, pamba te nakotindela bato ya Anatoti pasi, na mobu ya etumbu na bango. »


Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye, bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga. Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko ; bakokoka kolonga te, pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango : ezali tango ya etumbu mpo na bango.


Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? Te ! Bazali koyoka ata soni te ; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.


Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki.


Bato ya bikolo ya mayele mabe, oyo bazali lokola basende mpe banzube, bakozingela lisusu bana ya Isalaele te ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.


Atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai : — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.


Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ; bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.


Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.


Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka lisusu na tina te, ezalaka mosika te ya kolakelama mabe, mpe esukaka na kozika na moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ