Mishe 7:17 - Mokanda na Bomoi17 Bakolia mabele lokola nyoka, mpe lokola banyama oyo etambolaka na libumu ; bakobima na somo wuta na madusu epai wapi bazalaki kobombama, bakoya epai na Yawe, Nzambe na biso, na kolenga. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›
Bazongiselaki Jozue : — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo.