Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 7:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bato ya bikolo ya bapaya bakomona yango mpe bakoyoka soni ; ata soki bazali na nguya ya ndenge nini, bakozanga maloba, mpe matoyi na bango ekokangama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 7:16
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Botala ngai, bokokamwa, bokozanga ata likambo ya koloba.


« Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, eyano nini nakoki kopesa Yo ? Natie loboko na ngai na monoko.


Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo : « Yawe asaleli bango makambo minene ! »


Soki osali bozoba mpo na komikumisa, mpe soki ozali na makanisi mabe, tia loboko na monoko na yo,


Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango !


ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.


« Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso ; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai.


Na nzela wana, nakomonisa monene mpe bosantu na Ngai, mpe nakosala ete bato ya bikolo ebele bayeba Ngai ; boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›


Bamoni makambo bakotonda na soni, mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya bakosambwa. Bango nyonso bakobomba bilongi na bango, pamba te Nzambe akoyanola bango te. »


Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !


nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.


Na mokolo wana, nakobima mpo na koboma bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Bikolo etombokaki, mpe kanda na Yo epelaki. Tango ekoki mpo na kosambisa bakufi, mpe mpo na kofuta basali na Yo, basakoli, mpe basantu oyo batosaka Kombo na Yo, ezala bato minene to bato pamba ; mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ