Yango wana, nakosembola loboko na Ngai ; nakobeta Ejipito na nzela ya bikamwa na Ngai nyonso oyo nakosala kati na yango. Sima na yango, mokonzi ya Ejipito akotika bino kokende.
Yawe azongisaki : — Nalingi kosala boyokani elongo na bino. Liboso ya bato na yo nyonso, nakosala makambo ya kokamwa oyo etikala nanu kosalema te na mokili mobimba to na ekolo moko. Boye bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakomona misala ya somo oyo Ngai Yawe nakosala na nzela na yo.
Ezali Yo te oyo okawusaki ebale monene, mayi oyo ya mozindo makasi ? Ezali Yo te oyo opasolaki nzela kati na ebale monene mpo ete basikolami na Yo bakoka kokatisa ?
Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! Lata makasi ! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala ! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona ?