Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 6:9 - Mokanda na Bomoi

9 Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba ! Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. Boyoka sango ya etumbu na bino na monoko na Ye oyo atindi yango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 6:9
43 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye : « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. »


Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›


Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa.


Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Tika ete moto ya bwanya asala keba na makambo wana nyonso mpe akanisa na tina na bolingo ya Yawe !


Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.


Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !


Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.


Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.


Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango !


Engumba ya makasi etikali pamba lokola lopango oyo basundola, babosana mpe etikala pamba lokola esobe ; mwana ngombe ya mobali ekokoma kolia mpe kolala kuna, bongo ekolia ata makasa ya bitape na yango.


Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya ; kanda na Ye ezali kopela lokola moto elongo na lipata ya molinga ya moto makasi ; bibebu na Ye etondi na kanda, mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka.


Boyoka makelele kobima longwa na engumba, boyoka makelele kobima longwa na Tempelo ! Ezali nde mongongo na Yawe oyo azali kofuta banguna na Ye kolanda oyo ekoki na misala na bango.


Yango wana, kaka na mokolo moko, Yawe akokata, kati na Isalaele, moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.


« Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›


nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »


Kasi ndenge nini ezala kimia tango Yawe apesi yango mitindo ya kobundisa Ashikeloni mpe mikili oyo ezali pembeni ya ebale monene ? »


Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te, nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka.


Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.


Nakotia moto kati na ekolo ya Yuda, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba Yelusalemi, oyo batonga makasi. »


Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Oh libota ya mobulu, boni, nasepela penza komona bomengo na bino, oyo bosili kozwa na nzela ya mabe, Efa ekoka te oyo elakelama mabe ?


Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.


Etosaka moto te, endimaka pamela te, etiaka elikya na Yawe te, epusanaka pene ya Nzambe na yango te.


Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ