Mishe 6:6 - Mokanda na Bomoi6 Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo ? Boni, tomema bambeka ya kotumba to bana ngombe ya mibali ya mobu moko ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpe tango bato ya mokili bakoya liboso ya Yawe na bafeti oyo ekatama, moto nyonso oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya nor mpo na kogumbamela Yawe akobimela na ekuke ya ngambo ya sude, mpe oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya sude akobimela na ekuke ya ngambo ya nor. Moto moko te akobimela na ekuke oyo akotelaki, kasi akobimela na ekuke ya ngambo mosusu oyo etalana na yango.
Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama ; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi.