Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 6:4 - Mokanda na Bomoi

4 Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu ? Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 6:4
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ekolo nini ekokani na bato na Yo, Isalaele, oyo, kati na mokili, Nzambe akendeki kosikola lokola bato mpo na Ye moko, mpo na kopesa yango kombo mpe kokokisa makambo minene, makambo ya kokamwa mpe ya somo na nzela ya kobengana bikolo elongo na banzambe na bango liboso ya bato na Yo, oyo osikolaki wuta na Ejipito ?


Opasolaki nzela kati na ebale monene, balabala na Yo kati na mayi monene, mpe moto moko te amonaki bilembo ya matambe na Yo.


Mpe na mokolo wana, Yawe abimisaki bana ya Isalaele na molongo, wuta na Ejipito, lokola mampinga ya basoda.


« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito.


Moyize alobaki na Yawe : — Ah, Nkolo, nakokaka koloba malamu te ! Yango ezali likambo ya lobi oyo eleki te to ya wuta tango obandi koloba na mosali na Yo te, pamba te nazali na monoko mpe na lolemo kilo.


Ye akoloba epai ya bato na esika na yo, akozala molobeli na yo ; bongo yo okozala lokola nzambe na ye.


Ezali bango nde bakendeki kokutana na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpo na kobimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Ezali nde Moyize mpe Aron wana.


Obimisaki bato na Yo, Isalaele, na Ejipito na nzela ya bilembo minene mpe bikamwa wana osalelaki nguya na Yo mpe osembolaki loboko na Yo ya nguya mpo na koyeisa somo kati na bato ya Ejipito.


Nabimisaki bino na Ejipito mpe natambolisaki bino mibu tuku minei kati na esobe mpo na kopesa bino mokili ya bato ya Amori.


Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi.


Tala bisika oyo bana ya Isalaele batongaki milako na bango tango bazalaki na mobembo wuta na mokili ya Ejipito. Bazalaki kotambola na molongo ya bitumba na bokambami ya Moyize mpe Aron.


Abimisaki bango na mokili ya Ejipito, na nzela ya bikamwa mpe ya bilembo minene oyo asalaki kuna, na ebale monene ya Motane mpe na esobe, mibu tuku minei.


Bokanisa ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino. Yango wana, napesi bino mobeko oyo na mokolo ya lelo.


Bobosana te ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino kuna.


Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo.


Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?


‹ Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


Kasi ezali mpo ete Yawe alingaka bino mpe abatelaka ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na bino. Yango wana, na loboko na Ye ya nguya, Yawe abimisaki bino mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu, na maboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito.


Nabondelaki Yawe mpe nalobaki : « Nkolo Yawe, kobebisa bato na Yo te, bazali libula na Yo moko oyo osikolaki na nguya monene na Yo mpe obimisaki na Ejipito na loboko na Yo ya nguya.


Bongo Samuele alobaki na bato : — Ezali Yawe nde aponaki Moyize mpe Aron, mpe Ye nde abimisaki bakoko na bino na Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ