Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 6:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 6:2
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na koganga ya Yawe mpe na pema ya zolo na Ye, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, mpe miboko ya mokili emonanaki na libanda.


Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya Lola elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.


Otia mokili na likolo ya miboko na yango mpo ete eningana te seko na seko.


tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ;


Boya sik’oyo, tosilisa likambo, » elobi Yawe. « Ezala masumu na bino ezali motane makasi, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe ; ata ezali motane lokola ngola, ekokoma lokola bapwale ya meme.


Yawe atelemi na esambiselo, atelemi mpo na kosambisa bato.


Zongisa yango nanu na makanisi na Ngai ; tika ete tosamba elongo, mpe loba yo moko mpo na kotalisa ete ozali moto ya sembo.


Sik’oyo, bino bavandi ya Yelusalemi, bato ya Yuda, bokata makambo kati na ngai mpe elanga na ngai ya vino !


Yango wana, nakosambisa bino, » elobi Yawe. « Nakosambisa bino elongo na bakitani na bino,


Makelele ya makasi ekoyokana kino na suka ya mokili ; pamba te Yawe akosambisa bikolo, akosambisa bato nyonso, akobomisa bato mabe na mopanga, › » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo mpe komona miboko ya mabele, wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele mpo na makambo nyonso oyo basali, » elobi Yawe.


Efrayimi aliaka mopepe ; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este ; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.


Yawe alingi kosamba na Yuda ; akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na ye mpe akofuta ye kolanda misala na ye.


Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;


Boyoka makambo oyo Yawe alobi : « Telema mpe samba likambo na yo liboso ya bangomba, mpe tika ete bangomba mikuse eyoka makambo oyo ozali koloba !


Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.


soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ