Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 6:15 - Mokanda na Bomoi

15 Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ; okokamola bambuma ya olive, kasi okomipakola mafuta na yango te ; okokamola bambuma ya vino, kasi okomela masanga na yango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 6:15
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

tika ete bato mosusu balia biloko oyo ngai naloni, mpe tika ete nkona na ngai epikolama !


Bakolona ble, kasi bakobuka banzube ; bakobimisa mitoki na mosala, kasi bakozwa litomba ya malonga te. Boye, boyokela mbuma ya bilanga na bino soni, mpo na kanda makasi ya Yawe.


tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.


Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango.


lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.


Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te, nzete ya vino eboti mbuma te, nzete ya olive eboti mbuma te, bilanga ebimisi bilei te, bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango, mpe bangombe ezali te kati na lopango.


Bakobotola bango bomengo na makasi mpe bakobuka bandako na bango ; bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ; bakosala bilanga ya vino, kasi bakotikala komela vino na yango te. »


Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »


Awa nde ekokisami bosolo ya lisese oyo elobaka : « Moko alonaka, mosusu abukaka. »


Bazalaki kotonga milako na bango pene ya bana ya Isalaele, mpe bazalaki kobebisa bilanga na bango, kino pene ya Gaza. Bazalaki kotikela bana ya Isalaele ata eloko moko te ya kolia, ata meme to ntaba te, ata ngombe te, ata mpe ane te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ