Wuta na likolo, atindeli ngai moto, akitiseli ngai yango kino na mikuwa ; atieli ngai motambo na makolo mpe akweyisi ngai ; akomisi ngai eloko ya pamba, akotisi ngai na mawa ya mokolo na mokolo.
tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.
Pamba te bokono ya Samari esilaka te ; pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda, ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai, kino kutu na yango moko Yelusalemi.
Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.