Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 6:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bazwi ya libota oyo batondi na kanza, bato ya libota oyo batondi na lokuta, mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 6:12
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe wuta na lolemo ya lokuta !


Pamba te balobaka te maloba ya kimia, kasi babongisaka lokuta mpo na kokosela bato ya kimia makambo kati na mboka.


Kasi bazalaki koloba lokuta, minoko na bango ezalaki kokosa Ye ;


Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.


Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


Bongo na makambo ya boye, napesa bango etumbu te, » elobi Yawe ? « Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye ? »


Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta ; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.


Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai ! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai ! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo !


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.


Bozali kolala na bambeto oyo batia pembe ya nzoko, bozali komivandisa na bakiti ya divan ya kitoko, bozali kolia misuni ya bameme ya kitoko kati na bibwele mpe ya bana ngombe ya mibali ya mafuta kati na etonga.


Na mokolo wana, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo, bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko na makambo ya kanza mpe na lokuta.


Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.


Bayuda babetaki sete na makambo oyo bafundelaki ye.


Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ