Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 6:1 - Mokanda na Bomoi

1 Boyoka makambo oyo Yawe alobi : « Telema mpe samba likambo na yo liboso ya bangomba, mpe tika ete bangomba mikuse eyoka makambo oyo ozali koloba !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 6:1
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.


Abengi Likolo, kuna na likolo, mpe mabele mpo na kokata makambo ya bato na Ye.


Oh Lola, yoka ! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka ! Pamba te Yawe nde azali koloba : « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.


Yawe atelemi na esambiselo, atelemi mpo na kosambisa bato.


Boyoka malamu mpe bosala keba ! Bosala lolendo te, pamba te ezali Yawe nde alobi.


Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai ! Yoka Liloba na Yawe !


« Mwana na moto, sakola na tina na bangomba ya Isalaele mpe loba : ‹ Bino bangomba ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe !


Kasi bino, bangomba ya Isalaele, bokobota bitape mpe bambuma mpo na Isalaele, bato na Ngai ; pamba te etikali kaka moke ete bazonga epai na bango.


Bongo alobaki na ngai : — Sakola epai ya mikuwa oyo mpe yebisa yango : « Eh bino mikuwa ekawuka, boyoka Liloba na Yawe !


Loba na yango : Oh bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba milayi, na bangomba mikuse, na mabulu mpe na mabwaku : ‹ Namibongisi mpo na kotindela bino mopanga mpe kobebisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba.


Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :


Bino nyonso, bikolo, boyoka ! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka ! Nkolo Yawe azwi bino na likambo ; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule !


Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka, mabwaku ezali kopanzana ndenge mafuta eyandukaka na moto, ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombangu na mipanzi ya bangomba.


Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.


Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino : soki bango babateli kimia, mabanga ekoganga !


Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba ! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai !


soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;


Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino.


Samuele alobaki na Saulo : — Kata ! Tika ete nayebisa yo makambo oyo Yawe alobaki na ngai na butu oyo ewuti koleka. Saulo alobaki na ye : — Yebisa ngai yango !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ