Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 5:9 - Mokanda na Bomoi

9 « Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 5:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, telema. Nzambe, sembola loboko na Yo, kanisa babola.


Asembolaki loboko, alapaki ndayi ya koboma bango kati na esobe,


Mokonzi atiaka elikya na Yawe, aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.


Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino,


Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia na bangomba mikuse ya ngambo ya weste ; bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este, bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi, bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango.


Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango !


« Sik’oyo nakotelema, » elobi Yawe. « Sik’oyo nakonetolama, sik’oyo nakotombolama.


Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.


Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ