Mishe 5:7 - Mokanda na Bomoi7 Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.