6 Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.
Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.
Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni.
Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
Bato ya bikolo bakozwa bango mpe bakomema bango kino na esika na bango. Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. Bakokomisa bakangami bato oyo bakangaki bango mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango.
Nakobebisa mokili ya Asiri kati na mokili na Ngai, nakonyata-nyata yango na likolo ya bangomba na Ngai ; ekangiseli na bango ekolongwa epai ya bato na Ngai mpe mokumba na bango ekolongwa na mapeka na bango. »
Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te ! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te ! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.
Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.
Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.
Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.
Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !