Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 5:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga. Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri tango bakokota na makasi na mabele na biso mpe na bandelo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 5:5
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.


Na tango na ye, moto ya sembo akokende liboso, mpe kimia ekofuluka kino sanza ekongenga lisusu te.


Ezali na biloko misato oyo nasosolaka te, ata kutu minei oyo nayebaka te :


Ezali na banyama misato oyo etambolaka malamu, ata kutu minei oyo edendaka soki ezali kotambola :


Yawe ayinaka makambo wana motoba ; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye :


Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe, pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.


Nakobebisa mokili ya Asiri kati na mokili na Ngai, nakonyata-nyata yango na likolo ya bangomba na Ngai ; ekangiseli na bango ekolongwa epai ya bato na Ngai mpe mokumba na bango ekolongwa na mapeka na bango. »


Nalobi na tina na Sirisi : ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi : ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ mpe na tina na Tempelo : ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »


Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe ; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye ; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ndenge kaka balobaka soki bamoni liboke ya bambuma kitoko ya vino : ‹ Kobebisa te, pamba te lipamboli moko ezali wana, › ndenge mpe kaka nakosala mpo na basali na Ngai : nakoboma bango nyonso te.


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


Na mikolo yango mpe na tango yango, nakobimisa Moto ya nzete ya sembo wuta na libota ya Davidi ; akosala makambo ya sembo mpe ya boyengebene kati na mokili.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Gaza, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bamemaki bikolo ebele na bowumbu mpe batekaki bango na Edomi.


Bakoleka na kati-kati ya ebale monene ya mitungisi ; bambonge ya ebale monene ekovanda kimia, bozindo nyonso ya ebale Nili ekokawuka. Lolendo ya Asiri ekosila mpe lingenda ya bokonzi ya Ejipito ekolongwa.


Kanda na Ngai ya makasi epeli mpo na babateli, mpe nakopesa bakambi etumbu, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayei mpo na kobatela etonga na Ye, libota ya Yuda ; akokomisa bango mpunda na Ye ya lokumu kati na bitumba.


Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.


Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.


Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda, natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi. Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibali mpo ete batelemela bana mibali ya Yavani mpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe.


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !


Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.


Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »


Mampinga ya Lola ezalaki kolanda Ye na likolo ya bampunda ya pembe ; balataki bilamba ya lino ya kitoko, ya pembe mpe ya peto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ