3 Akotelema mpe akobatela bibwele na ye na nguya na Yawe, na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye ; mpe bakovanda na kimia, pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye ekopanzana mokili mobimba.
Bozala te lokola batata mpe bandeko na bino oyo bazangaki boyengebene liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango. Yango wana asalaki ete babebisama ndenge bozali komona.
Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.
Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango : « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai ; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.
Akolanda bamakangu na ye, kasi akozwa bango te ; akoluka bango, kasi akomona bango te. Bongo akoloba : « Tika nazongela mobali na ngai ya liboso ; pamba te elongo na mobali ya liboso, nazalaki na esengo koleka sik’oyo ! »
Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu ; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.
Moto nyonso akovanda na kimia kati na bilanga na ye ya vino mpe na se ya nzete na ye ya figi. Moto moko te akobangisa ye, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.
Nakosala ete libota oyo ezali kotambola tengu-tengu ekoma batikali, mpe oyo bazalaki na bowumbu mosika na Ngai, libota ya nguya. Yawe akozala Mokonzi na bango, na ngomba Siona, kobanda na mokolo yango kino libela na libela.
Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.
« Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa ; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.
Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.