Mishe 5:13 - Mokanda na Bomoi13 nakobebisa makonzi ya bule ya nzambe Ashera oyo ezali kati na yo mpe nakobebisa bingumba na yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe ; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.