Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 4:6 - Mokanda na Bomoi

6 « Na mokolo yango, » elobi Yawe, « Nakosangisa libota na Ngai, oyo ezali kotambola tengu-tengu ; nakoyamba oyo ezalaki na bowumbu, mosika na Ngai, mpe oyo natiaki pasi likolo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 4:6
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.


Nalobaki : « Kopesa nzela te ete basepela na tina na ngai to bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »


Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi : « Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango, esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. »


Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele ; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.


Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; bato ebele penza bakozonga.


Pamba te nakobimisa bino na bikolo, nakosangisa bino wuta na bikolo mpe nakozongisa bino na mabele na bino moko.


Oh bakitani ya Jakobi, nakosangisa bino nyonso, nakosangisa batikali nyonso ya Isalaele. Nakosangisa bango lokola bameme kati na lopango, lokola bibwele kati na etando na yango ya kolia matiti. Makelele oyo ekoyokana kuna ekozala makelele ya bato ebele.


Na tango wana, nakobeta bato nyonso oyo banyokolaki yo, nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai. Nakopesa bango lokumu mpe nakosala ete sango na bango epanzana na mikili nyonso epai wapi basambwisaki bango.


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.


Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango ; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ