Mishe 4:13 - Mokanda na Bomoi13 Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya ekolo ya bato milayi oyo poso ya nzoto na bango engengaka, wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, bakomema bakado yango na ngomba Siona, esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.
Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.