Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 4:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kasi sik’oyo, bikolo ebele esangani mpo na kotelemela yo ; bazali koloba : « Tika ete bosantu ya Siona esambwa mpe miso esepela komona kobebisama na yango ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 4:11
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima !


Bazali koloba : « Boya, toboma bango nyonso mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te, mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »


Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te, akanisaka yango bongo te ; akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele.


Mawa na ebele ya bato ! Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene ! Bato ya bikolo bazali koganga lokola lokito ya mayi ya ebale monene !


Ekozala lokola ndoto to emoniseli ya butu mpo na ebele ya bikolo oyo bakobundisa Arieli, oyo bakotelemela ye elongo na bandako na ye ya makasi mpe bakozingela ye.


Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango na libanda ya engumba mpe batimolaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba ya Tiri, natombokeli yo ! Nakotindela yo bikolo ebele lokola mbonge ya ebale monene, mpo ete eya kobundisa yo.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ezali yo te oyo na tina na nani nalobelaki na tango ya kala na nzela ya basali na Ngai, basakoli ya Isalaele, oyo basakolaki na tango wana, na mibu ebele, ete nakotinda yo mpo ete obundisa bato na Ngai ?


Nzokande, osengelaki te kosepela komona pasi ya ndeko na yo to kosepela komona kobebisama ya bato ya Yuda to mpe kosala lofundu na mokolo ya pasi na bango.


Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai : « Wapi Yawe, Nzambe na yo ? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.


Na mokolo wana, nakokomisa Yelusalemi lokola libanga ya kilo liboso ya bikolo nyonso ; moto nyonso oyo akoluka kotombola yango akozoka ; mpe bikolo nyonso ekosangana mpo na kobundisa Yelusalemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ