« Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.
Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi, likonzi ya ebende mpe mir ya ebende mpo na komibatela liboso ya mokili mobimba : liboso ya bakonzi ya Yuda, ya bakalaka na yango, ya Banganga-Nzambe na yango mpe ya bavandi nyonso ya mokili yango.
Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai ; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te !
Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali ; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.
Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki ya lokuta mpe ya pamba ; balakisaki yo masumu na yo te mpo ete okende na bowumbu te : masakoli oyo bazwelaki yo ezalaki ya mabe mpe ya lokuta !
Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda ; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi.
Mwana na moto, lakisa epai ya libota ya Isalaele ndenge Tempelo ezali mpo ete bayoka soni mpo na masumu na bango ; mpe tika ete bameka molayi mpe mokuse na yango.