Mishe 3:5 - Mokanda na Bomoi5 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela basakoli ya lokuta oyo babungisaka bato na ngai nzela : « Soki bapesi bango eloko ya kolia, basakolaka kimia ; soki bapesi bango te eloko ya kolia, basakolaka bitumba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.
Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »