Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bozali kodunda misuni ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola bango poso ya nzoto mpe kobuka mikuwa na bango. Bozali kokata bango mike-mike lokola misuni oyo bakalingaka to oyo batokisaka na nzungu. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 3:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !


Tango bato mabe babundisaka ngai mpo na koluka kosala ngai mabe, ezali bayini mpe banguna na ngai nde baninganaka mpe bakweyaka.


Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga, lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili mpe bato bakelela kati na bato.


Yawe akosamba elongo na bampaka mpe bakambi ya bato na Ye : « Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino ! Botondisi bandako na bino na biloko oyo bobotoli epai ya babola !


Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai mpe kotiola bomoto ya babola ; » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ?


Balobaka : ‹ Boni, tango ya kotonga bandako ekoki nanu te ? Engumba oyo ezali lokola nzungu, mpe biso, tozali lokola misuni. ›


Tia biteni ya misuni kati na yango, biteni nyonso ya malamu : lokolo mpe lipeka ; tondisa yango na mikuwa ya malamu.


Boyoka makambo oyo, bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela mpe bonyataka babola kati na mokili.


Na mikolo eleki, bozalaki komona bato na ngai lokola banguna. Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia bilamba ya talo na mawa te, lokola bato oyo bawuti bitumba ;


Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ