Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 3:1 - Mokanda na Bomoi

1 Boye, nalobaki : « Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi, bino batambolisi ya libota ya Isalaele ! Ezali bino te bato bosengeli koyeba malamu mibeko ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 3:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napamelaki bankumu ya Yuda mpe nalobaki na bango : — Ndenge nini bozali kosala likambo mabe makasi boye na kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba ?


Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !


Boyoka Liloba na Yawe, bino bakambi ya engumba Sodome ! Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, bino bato ya engumba Gomore !


Bapimelaka bato pamba bosembo mpe babotolaka makoki ya babola, mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibali mpe ya bana bitike.


Tala ndenge bakambi ya Isalaele basalelaka bokonzi na bango mpo na kosopa makila.


« Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele ! Sakola mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko ! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele ?


Bolingi kaka kolia mafuta na yango, kolata bilamba oyo esalemi na bapwale na yango mpe koboma bibwele oyo eleki mafuta, kasi bolukaka bolamu ya bibwele yango te !


Azongiselaki ngai : — Lisumu ya libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda eleki monene makasi penza. Mokili etondi na makila, mpe engumba etondi na kozanga bosembo ; pamba te bazali koloba : « Yawe asundoli mokili ; Yawe azali komona eloko moko te. »


Bino Banganga-Nzambe, boyoka ! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi ! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka ! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.


Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »


Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !


Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.


Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni ! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye ?


Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ