Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 2:8 - Mokanda na Bomoi

8 Na mikolo eleki, bozalaki komona bato na ngai lokola banguna. Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia bilamba ya talo na mawa te, lokola bato oyo bawuti bitumba ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 2:8
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tozali bato ya kimia mpe ya sembo kati na Isalaele. Kasi yo ozali koluka koboma engumba oyo ezali mama kati na Isalaele ! Mpo na nini olingi kobebisa libula ya Yawe ?


Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza ; akonzaka mpo na libela na libela. Babongolaka mitema te mpe batosaka Nzambe te.


Libula na ngai ekomi na miso na ngai lokola nkosi ya zamba : ezali kogangela ngai ; yango wana nayini yango.


Nzokande, ezali bino bato bozali koboya bolamu mpe bozali kolinga mabe. Bozali kolongola poso ya nzoto ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola misuni na bango mpe kobuka mikuwa na bango.


Bozali kodunda misuni ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola bango poso ya nzoto mpe kobuka mikuwa na bango. Bozali kokata bango mike-mike lokola misuni oyo bakalingaka to oyo batokisaka na nzungu. »


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ