kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo.
Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :
Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo.
Bokoki te komona bato ya Edomi lokola bato ya mbindo, pamba te bazali bandeko na bino. Bokoki te komona bato ya Ejipito lokola bato ya mbindo, pamba te bovandaki kati na mokili na bango lokola bapaya.
Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.
Bopona bato misato kati na libota moko na moko. Nakotinda bango mpo ete bakende kotambola kati na mokili mpe kotia bandelo na yango kolanda libula ya libota na libota ; bongo na sima nde bakoki kozonga epai na ngai.