nakolongola Isalaele kati na mabele oyo napesaki ye, nakobwaka mosika ya elongi na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai, mpe Isalaele akokoma eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso.
Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.
Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.
nakopikola bino na mabele na Ngai, mabele oyo napesaki bino ; nakobwaka mosika ya miso na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso.
Basopaki makila ya bato oyo basalaki mabe te, makila ya bana na bango, oyo bapesaki lokola mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya Kanana. Boye mboka ekomaki mbindo mpo na makila ya bato.
« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.
Eh basi, boyoka Liloba na Yawe ! Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa mpe tika ete moko na moko ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.
« Mwana na moto, tango bana ya Isalaele bazalaki kovanda na mokili na bango, bazalaki kokomisa yango mbindo na ezaleli mpe na misala na bango ; ezaleli na bango ezalaki mbindo na miso na Ngai lokola makila ya mwasi oyo azali komona sanza na ye.
nalobi na yo, na mokolo ya lelo, ete okobebisama solo, okowumela lisusu te kati na mokili oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi bokokota mpo na kozwa.
soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;