Mishe 2:1 - Mokanda na Bomoi1 Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi : — Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi ; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te ; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia.
Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye : — Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi. Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.
Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »