Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa.
Kasi bikelamu ya esobe nde ekokoma kolala kuna ; bambwa ya zamba nde ekotondisa bandako na yango, ba-esulungutu ekotonda na bandako, maligbanga ekokoma kovanda kuna mpe bantaba ya zamba ekokoma kopumbwa-pumbwa kuna.
Banyawu ya zamba ekotonda na bandako na bango ya makasi, mpe bambwa ya zamba ekotonda na bandako na bango ya kitoko. Tango na yango esili kobelema, mpe mikolo na yango ekopusana lisusu te.
Yango wana, nazali kolela lokola Yaezeri mpo na vino ya Sibima. Eshiboni mpe Eleale, nazali kosopa mpinzoli mpo na bino ! Koganga ya esengo esili mpo bambuma na bino mpe mpo na biloko oyo bobuki na bilanga na bino.
Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia ; boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te ! Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu, bolata basaki na loketo na bino !
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.
Eh basi, boyoka Liloba na Yawe ! Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa mpe tika ete moko na moko ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.
« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na bato nyonso ya Ejipito mpe kitisa na mokili ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu, mokili ya Ejipito elongo na bato ya bikolo ya nguya.
Na mokolo wana, bakosambwisa bino ; mpo na kotiola bino, bakobanda koyembela bino banzembo oyo : ‹ Tobebisami penza mobimba ! Libula ya bato na ngai ekabwani ! Abotoli yango na maboko na ngai mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »