Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 1:7 - Mokanda na Bomoi

7 Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana, makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto. Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule, mpe mpo ete basalela yango lisusu te lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 1:7
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango.


Banzambe nyonso ya bikeko bakobebisama nye.


Na sima na mibu tuku sambo, Yawe akosala mpo na Tiri oyo ekozongela lifuti na yango ya mbindo ; mpe ekozongela kosala kindumba elongo na bikolo nyonso ya mokili.


Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama, mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye : akobuka mabanga nyonso ya etumbelo mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka ; mpe likonzi moko te ya Ashera to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.


Bingumba ekotikala lisusu na bato te mpe bisambelo ya likolo ya bangomba ekobebisama na bisika nyonso oyo bokozala ; mpo ete bitumbelo na bino etikala pamba mpe ebebisama, banzambe na bino ya bikeko ebukana biteni-biteni mpe ebebisama, bitumbelo na bino ya malasi ya ansa ebukana mpe biloko oyo maboko na bino esalaki ezala lisusu te.


Boye, nakosambwisa ye na miso ya bamakangu na ye, mpe moto moko te akobikisa ye na maboko na ngai.


Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango : « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai ; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.


Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.


Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele ! Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango. Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?


Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.


Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa, na likolo mpe na mokili : makila, moto mpe makonzi ya milinga.


Nakokweyisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba, nakokweyisa bitumbelo na bino ya malasi, nakotia bibembe na bino likolo ya bibembe ya banzambe na bino ya bikeko mpe nakotombokela bino.


Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule.


Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu ; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba.


Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. »


Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.


Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo ; kaka nzoto na ye nde etikalaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ