Mishe 1:5 - Mokanda na Bomoi5 Mpo na nini nyonso wana ? Ezali mpo na mabe ya Jakobi, mpo na masumu ya libota ya Isalaele. Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe ? Boni, ezali Samari te ? Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangomba ezala kati na Yuda ? Boni, ezali Yelusalemi te ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye ; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto.
Babukaki liboso na ye bitumbelo ya banzambe Bala, bakweyisaki mbala moko bitumbelo malasi oyo ezalaki na likolo na yango, abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera, bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto ; akomisaki yango putulu mpe asopaki putulu yango na likolo ya bakunda ya bato oyo babonzelaki banzambe yango bambeka.