Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 1:4 - Mokanda na Bomoi

4 Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka, mabwaku ezali kopanzana ndenge mafuta eyandukaka na moto, ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombangu na mipanzi ya bangomba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 1:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe azali kati na yango, ebukani te ; Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.


Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka, mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye.


Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.


Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele, mabele eninganaka, mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga, mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.


Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.


Soki bangomba emoni Yo, elengaka ; mayi etiolaka makasi, ebale monene etombokaka mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.


Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.


Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi ; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale : eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema : eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


Eh Yawe, tango obimaki na Seiri, tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi, mabele eninganaki, likolo enyangwanaki, mapata esopaki mayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ