Mishe 1:13 - Mokanda na Bomoi13 Bino bavandi ya engumba Lakishi, bokangisa bampunda mpe bashar na bino ! Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu ; pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,
Boye, mokonzi ya Asiri atindaki mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, elongo na mampinga ya basoda ya nguya, wuta na Lakishi kino na Yelusalemi, epai ya mokonzi Ezekiasi. Tango mokonzi ya basoda yango atelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,
Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.
Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.