Boni, obwaki solo Yuda ? Oyini penza Siona ? Mpo na nini otindeli biso pasi makasi oyo ezangeli nzela ya kobika ? Tokanisaki ete tokozwa kimia ; nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te ! Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono ; nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi !
Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia, kasi tomoni likambo moko te ya malamu ; tozalaki na elikya ete tokobika, kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso !
Pamba te bokono ya Samari esilaka te ; pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda, ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai, kino kutu na yango moko Yelusalemi.
Akomaki na tango oyo Eli azalaki ya kovanda na kiti, pembeni ya nzela, mpe azalaki kotala na ekenge, pamba te motema na ye ezalaki na kimia te na tina na Sanduku ya Nzambe. Bongo tango moto yango akotaki na engumba mpe apesaki sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema, engumba mobimba egangaki.