Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mishe 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mishe 1:1
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mibale na bokonzi, Yotami, mwana mobali ya Oziasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Yawe abetaki mokonzi, mpe mokonzi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Boye akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika. Yotami, mwana mobali ya mokonzi, oyo azalaki mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.


Na mobu ya zomi na sambo ya bokonzi ya Peka, mwana mobali ya Remalia, Akazi, mwana mobali ya Yotami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Tango Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu misato na bokonzi, Ezekiasi, mwana mobali ya Akazi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo.


Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abiya. » Abiya azalaki mwana mwasi ya Zakari.


Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.


Oh Lola, yoka ! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka ! Pamba te Yawe nde azali koloba : « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.


Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te.


Moto ya Efrayimi ezali Samari, mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia. Soki botelemi ngwi te na kondima na bino, bokolonga te kotelema liboso na bango ! › »


« Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele :


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »


Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.


Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !


Mpo na nini nyonso wana ? Ezali mpo na mabe ya Jakobi, mpo na masumu ya libota ya Isalaele. Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe ? Boni, ezali Samari te ? Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangomba ezala kati na Yuda ? Boni, ezali Yelusalemi te ?


Boyoka maloba oyo, bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele, bino oyo bolingaka makambo ya sembo te mpe bobongolaka makambo ya alima,


Tala liloba oyo mosakoli Abakuki azwaki na emoniseli :


pamba te maloba yango ya basakoli eyaki te na nzela ya mokano ya moto, kasi ezali Molimo Mosantu nde atindikaki bato na koloba kowuta na Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ