7 Bato oyo bazalaki kokende mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba ; bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te.
Ngai, Daniele, ngai moko kaka nde namonaki emoniseli yango. Bato oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki yango te, kasi somo makasi ekweyelaki bango, bakimaki mpe babombamaki.
Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki : — Ezali kake ! Bato mosusu balobaki : — Anjelu moko asololi na ye !
Bato oyo bazalaki na ngai elongo bamonaki pole yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai.