Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 9:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi sik’oyo, telema, kota kati na engumba, mpe, kuna, bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 9:6
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ? Alakisaka bango nzela ya kopona.


Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo


Namonaki banzela na ye, kasi nakobikisa ye ; nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, telema na makolo na yo ; pamba te nazali na likambo ya koyebisa yo. »


Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe alobaki na ngai : « Telema mpe kende na lubwaku ; nazali na makambo ya koyebisa yo kuna. »


Tango nayokaki sango oyo, motema na ngai ekomaki kobeta makasi, bibebu na ngai ekomaki kolenga, mikuwa na ngai ekomaki kopola mpe makolo na ngai ekomaki kolenga. Kasi nakokanga motema na ngai mpo na kozela mokolo ya pasi oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.


Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.


Ebele ya bato batunaki ye : — Tosengeli kosala nini ?


Bato yango bazongisaki : — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.


Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo ; azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene. »


azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene.


Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu : — Bandeko, tosala nini ?


Natunaki : « Nkolo, nasala nini ? » Nkolo alobaki na ngai : « Telema, kende na Damasi ; kuna, bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala. »


Kasi lamuka mpe telema ! Pamba te namimonisi epai na yo mpo na kokomisa yo mosali na Ngai mpe motatoli ya makambo oyo osili komona, mpe ya makambo oyo nakolakisa yo na sima.


Saulo atunaki : — Nkolo, yo nani ? Mongongo ezongisaki : — Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.


Mpe Ezayi akomaki kino na koloba : « Namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te, namimonisaki epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai te. »


Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.


Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka


Na kala, tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi ; kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, mpe ngai nakufi.


Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ;


Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Bongo tango okotumba mbeka, okobengisa Izayi ; mpe Ngai moko nakolakisa yo nini oyo osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta mpo na Ngai.


Tango Saulo amonaki mampinga ya bato ya Filisitia, abangaki mpe somo etondaki na motema na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ