Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 9:42 - Mokanda na Bomoi

42 Sango yango epanzanaki kati na engumba mobimba ya Jafa, mpe bato mingi bandimelaki Nkolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 9:42
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo atangaki motango ya bapaya nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele kolanda ndenge Davidi, tata na ye, atangaki motango ya bato. Bazalaki bato nkoto nkama moko na tuku mitano na misato na nkama motoba.


Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.


Tango Yesu ayokaki yango, alobaki : — Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.


Kati na Bayuda oyo bayaki epai ya Mari, mingi kati na bango bandimaki Yesu tango bamonaki makambo oyo asalaki ;


pamba te likolo na ye, Bayuda ebele bazalaki kokabwana na Banganga-Nzambe mpo na kondima Yesu.


Bongo Yesu alobaki na mongongo ya makasi : — Moto oyo andimi Ngai, andimi kaka Ngai te, kasi andimi mpe Ye oyo atindaki Ngai ;


Sik’oyo, tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali « Petelo ; »


Ayebisaki bango makambo nyonso oyo ekomelaki ye mpe atindaki bango na Jafa.


Moto yango ayebisaki biso ndenge nini amonaki anjelu kobimela ye kati na ndako na ye mpe koloba na ye : « Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo.


Nguya ya Nkolo ezalaki elongo na bango, mpe bato ebele penza bandimaki mpe bamipesaki na Nkolo.


— Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki.


Tango bavandi nyonso ya Lidi mpe ya esobe ya Saroni bamonaki ye, bandimelaki Nkolo.


Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba : Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.


Tango bayekoli bayokaki sango ete Petelo azali kati na Lidi oyo ezali penza pene ya Jafa, batindelaki ye mibali mibale mpo na kosenga na ye : « Tobondeli yo, yaka noki ! »


Petelo avandaki tango molayi kati na Jafa, epai ya moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona ; » azalaki mobongisi baposo ya banyama.


mayi ya Yarikoni, Rakoni mpe etuka oyo etalana na Jafa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ