41 Petelo asimbaki ye na loboko na ye mpe atelemisaki ye. Bongo abengaki bandimi, mingi-mingi basi oyo bakufisa mibali, mpe alakisaki bango Dorkasi ya bomoi.
Eliya azwaki mwana mpe akitisaki ye wuta na shambre ya likolo kino kati na ndako. Apesaki mwana epai ya mama na ye mpe alobaki : — Tala mwana na yo ya mobali, azali na bomoi.
Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa : azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango.
Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.
Mwasi akufisa mobali, oyo atikala penza ye moko mpe azali kokelela atiaka elikya na ye kati na Nzambe mpe asambelaka butu mpe moyi mpo na kosenga lisungi epai ya Nzambe.