Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 9:40 - Mokanda na Bomoi

40 Petelo abimisaki bato nyonso ; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki : — Tabita, telema ! Tabita afungolaki miso ; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 9:40
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi.


Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.


Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.


Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe : — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.


Akendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye :


Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki : — Mwana na Ngai, lamuka !


Sima na Polo koloba bongo, afukamaki mpe asambelaki elongo na bango.


Atako bongo, tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso elongo na basi na bango mpe bana na bango bakendeki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpo na kosambela.


Nzokande, tata ya Pibiliusi azalaki ya kolala na mbeto mpo ete azalaki kobela fievele mpe pulupulu ya makila. Polo akendeki kotala ye, akotaki na ndako na ye, asambelaki, atielaki ye maboko mpe abikisaki ye.


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ