Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 9:36 - Mokanda na Bomoi

36 Kati na Jafa, ezalaki na mwasi moyekoli moko, kombo na ye ezalaki « Tabita. » Na lokota ya Greki, kombo na ye ezalaki Dorkasi (oyo elingi koloba : Mboloko). Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosunga babola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 9:36
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo atangaki motango ya bapaya nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele kolanda ndenge Davidi, tata na ye, atangaki motango ya bato. Bazalaki bato nkoto nkama moko na tuku mitano na misato na nkama motoba.


Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.


oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi, lokola mboloko ya mafuta. Tika ete tango nyonso, mabele na ye etondisaka yo na esengo, mpe bolingo na ye elangwisaka yo !


Molingami na ngai azali lokola mboloko to mwana ya mbuli. Tala ye wana ! Atelemi na sima ya mir na biso, azali kotala na lininisa, azali kotala na mayele na kiyungulu ya lininisa.


Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga : Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.


Oh bolingo na ngai, kima mbangu, zala lokola mboloko to lokola mwana ya mbuli ; kende na likolo ya bangomba oyo etondi na matiti ya solo kitoko.


Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.


Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki.


Nazali nzete ya vino ; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.


Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu.


Petelo akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala. Mokolo oyo elandaki, Petelo akendeki elongo na bango, mpe ndambo ya bandimi balandaki ye wuta na Jafa.


mpe alobaki : « Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe akanisi masungi oyo opesaka epai ya babola.


Ayebisaki bango makambo nyonso oyo ekomelaki ye mpe atindaki bango na Jafa.


Moto yango ayebisaki biso ndenge nini amonaki anjelu kobimela ye kati na ndako na ye mpe koloba na ye : « Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo.


— Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki.


Tango bayekoli bayokaki sango ete Petelo azali kati na Lidi oyo ezali penza pene ya Jafa, batindelaki ye mibali mibale mpo na kosenga na ye : « Tobondeli yo, yaka noki ! »


Sango yango epanzanaki kati na engumba mobimba ya Jafa, mpe bato mingi bandimelaki Nkolo.


Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.


bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.


mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,


Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka,


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Na makambo nyonso, zala ndakisa na nzela ya misala malamu ; mpe na mateya na yo, lakisa bosembo, longola maseki,


Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo ; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.


apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !


Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.


mayi ya Yarikoni, Rakoni mpe etuka oyo etalana na Jafa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ